Likelelo

Útá Wikipedia.

Likelelo lizalí loléngé la nkómbó o mambi ma lokótá. Likelelo ezalí eténi ya lisákóláfaláze.

Ndakisa : Nazalí malámu míngi o kelási.

  • Nazalí ezalí likelelo. Elobami na moto ya yambo na bɔ̌kɔ́ « -zala, kozala » o ntángo ya ezalisi na mokonza « na- ».
  • míngi ezalí lilandi likelelo tǒ litɛ́mɛlɛ
  • o ezalí lilíngami
  • kelási ezalí nkómbó ya elɔ́kɔ

Likelelo na lingála[kokoma | kobɔngisa mosólo]

Likelelo na Lingála lizalí na biténi bísáto; monsisá, elembo ya likelelo eye ekolakisa *infinitif mpé nsúka ya likelelo.

Ndakisa
ko-zal-a
  • Elembo ya likelelo eye ekolakisa *infinitif: Ko-

O lingála elembo ya likelelo liye lizali kolakisa *infinitif ezali ko. Sɔ́kɔ́ likelelo *Ekonjugamé na ntángo mpé moto oyo esengeli, ko ekotika esíká na elembo eye ezalí kolakisa mokonza. Elembo ezalí kolakisa mokonza ekɛsɛni sɔ́kɔ́ ezalí koloba na ntína ya bato tǒ makambo tǒ bilɔ́kɔ bisúsu. Sɔ́kɔ́ ezalí koloba na ntína ya bato, ko ekotika esíká na na, o, a, to, bo, ba, sɔ́kɔ́ ezalí koloba na ntína ya elɔ́kɔ tǒ likambo lisúsu, ekolanda kelási níni nkómbó eye ezalí mokonza ezalí mpé ko ekotíka esíká na *prefixe ya nkómbó êná.

Ndakisa

Ko-kom-a → Bínó bokomaka lingála ;malámu
Ko-kom-a → Búku ekomami na ;lingála
Ko-lob-a → Lokótá la lingála lulobamaka na Kongó-Kinsásá mpé na Kongó-Brazzaville

  • Monsisá mwa likelelo: -zal-
Ndakisa

Koloba → -lob- ezalí monsisá mwa likelelo koloba
Koyémba → -yémb- ezalí monsisá mwa likelelo koyémba
Kobɛ́tɛ → -bɛ́t- ezalí monsisá mwa likelelo kobɛ́tɛ.

  • Nsúka ya likelelo: -a

O Lingála makelelo míngi masúkaka na moleli a kasi makelelo makɛ́ masúkaka na mileli misúsu lokóla eɛ mpé ntángo esúsu oɔ.

Ndakisa

Ko-lob-a, ko-yémb-a, ko-tún-a, ko-sámbel-a, ko-solol-a
Ko-bɛ́t-ɛ, ko-pɛ́s-ɛ, ko-sɛ́ng-ɛ
Ko-mɔ́n-ɔ, kopɔ́n-ɔ

Sɔ́kɔ́ likelelo lizalí *congugué, nsúka ya yangó ekokɛsɛnɛ éngɛ́bɛ́nɛ́ na ntángo. A ekoki kotíka esíká na i, aka, ákí, áká, a kasi eye bakwéisa ko libosó lya likelelo tɛ́ yambo ya kobáka elembo ya mokonza, á mpé bôngó na bôngó.

Ndakisa

Koloba → Nalobaka Lingála, Lifalansé na ;Lingɛlɛ́sa
Koloba → Lobi nalobáká na yɔ̂ 'te ókɛndɛ wɛnzɛ
koloba → Lobi nakoloba na yɔ̂ likambo lîná.
Kobɛ́tɛ → Alain Kaliyutuka Dioko abɛ́tɛkɛ lisano lya ndembó


Óyo ezalí ndámbo. Okoki kosálisa mpé kosungǎ.